1 Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye. 2 Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei.
3 Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. » 4 Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi.
5 Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi : « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti.
6 Saulo ayokaki ete bamonaki Davidi elongo na bato na ye. Wana Saulo azalaki na mopanga na loboko na ye mpe avandaki na Gibea, na likolo ya ngomba moke mpe na se ya nzete oyo babengi « Tamarisi » elongo na bakonzi nyonso ya mampinga na ye, 7 Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ? 8 Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? »
9 Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi. 10 Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. »
11 Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi ; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi. 12 Saulo alobaki :
13 Saulo alobaki na ye :
14 Ayimeleki azongiselaki mokonzi :
16 Kasi mokonzi alobaki :
17 Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye : « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe ; pamba te bango mpe basungaki Davidi : bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.
18 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi : « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. »