2 Na ngambo mosusu, Saulo mpe bato ya Isalaele basanganaki mpe batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Terebente ; batandamaki na milongo mpe babongamaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia. 3 Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu ; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.
4 Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi. 5 Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze. 6 Na makolo na ye, alataki bitando ya bronze, mpe akangisaki likonga ya bronze na sima ya mokongo na ye. 7 Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.
8 Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki : « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba ? Ngai nazali moto ya Filisitia te ? Mpe bino bozali basali ya Saulo te ? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai. 9 Soki akokoka kolonga mpe koboma ngai, wana biso tokokoma bawumbu na bino. Nzokande soki ngai nalongi mpe nabomi ye, wana bino nde bokokoma bawumbu na biso mpe bokosalela biso. » 10 Moto ya Filisitia alobaki lisusu : « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. »
11 Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.
12 Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi. 13 Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba : Eliabi, mwana mobali ya liboso ; Abinadabi, mwana mobali ya mibale ; mpe Shama, mwana mobali ya misato. 14 Lokola Davidi azalaki leki, mpe wana bana mibali misato ya liboso balandaki Saulo, 15 Davidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi.
16 Mikolo tuku minei, moto ya Filisitia azalaki komilakisa, tongo mpe pokwa, liboso ya mampinga ya Isalaele. 17 Izayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali : « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango. 18 Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu. 19 Bazali na lubwaku ya Terebente[a] elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. »
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.
21 Bato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda. 22 Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote. 23 Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye. 24 Kasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi.
25 Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »
26 Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye :
27 Lokola bato bazalaki kozongela kaka maloba moko, balobaki na ye :
28 Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki :
29 Davidi azongiselaki ye :
30 Bongo Davidi abalukaki mpo na kosolola na moto mosusu mpe atunaki kaka likambo moko wana. Mpe bazongiselaki ye ndenge kaka moto ya liboso alobaki na ye.
31 Maloba ya Davidi epanzanaki na lombangu, mpe bayebisaki yango Saulo. Mpe sima na Saulo koyoka yango, abengisaki ye.
32 Davidi alobaki na Saulo :
33 Kasi Saulo alobaki na Davidi :
34 Davidi azongiselaki Saulo :
37 Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo.
38 Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.
39 Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te.
41 Kaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi ; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso. 42 Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko. 43 Moto ya Filisitia alobaki na Davidi :
44 Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi :
45 Davidi alobaki na moto ya Filisitia :
48 Wana moto ya Filisitia amibongisaki mpo na kokende kobundisa Davidi, Davidi akimaki mbangu na molongo ya liboso ya bitumba mpo na kokutana na moto ya Filisitia. 49 Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele. 50 Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.
51 Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango.
55 Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga :
56 Mokonzi alobaki :
57 Tango kaka Davidi azongaki sima na ye koboma moto ya Filisitia, Abineri azwaki ye mpe amemaki ye na liboso ya Saulo. Davidi asimbaki na loboko na ye moto ya moto ya Filisitia. 58 Saulo atunaki Davidi :
- a Na mikanda mosusu, bakoma : Lubwaku ya Ela