2 Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele ; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
3 Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi : molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano. 4 Maninisa na yango ezalaki na mipanzi nyonso ya ndako mpe ezalaki etalana yango na yango, na ba-etaje nyonso misato. 5 Bikuke na yango nyonso ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, mpe ezalaki etalana na ba-etaje nyonso misato.
6 Salomo atongaki lisusu na makonzi, ndako moke ya kokotela ya bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse, mpe ezalaki na motondo likolo ya makonzi. 7 Atongaki lisusu ndako ya kiti ya bokonzi epai wapi azalaki kosambisa bato. Alatisaki yango mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo.
8 Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela ; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi.
9 Batongaki bandako oyo nyonso na mabanga bakata kitoko mpe babongisa na si na bangambo nyonso mibale. Basalelaki yango kobanda na miboko kino na mitondo, mpe na libanda, mpo na bamir ya lopango ya monene. 10 Basalelaki mabanga minene ya talo mpo na kotonga miboko oyo ezalaki na molayi ya bametele pene minei to mitano. 11 Na likolo ya miboko yango, batiaki mabanga oyo bakata mpe mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
12 Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.
13 Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami 14 oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.
15 Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene. 16 Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe : moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. 17 Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo. 18 Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko. 19 Mito ya makonzi ya ndako moke ya kokotela ezalaki ya bametele pene mibale na bosanda, mpe batiaki na likolo na yango bililingi ya fololo ya lisi. 20 Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama. 21 Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi. 22 Likolo ya likonzi moko na moko, atiaki bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki ndenge wana nde asilisaki mosala ya kotelemisa makonzi.
23 Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano. 24 Na se ya monoko ya nzungu yango ya monene, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bakolokente oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko. 25 Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati. 26 Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei.
38 Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko. 39 Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este.
40 Irami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila.
48 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; 49 bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, 50 basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.
51 Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.
<- 1 Bakonzi 61 Bakonzi 8 ->