2 Tala ndenge nini toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe : ezali na nzela ya kolinga Nzambe mpe ya kotosa mibeko na Ye. 3 Pamba te kolinga Nzambe ezali : kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te, 4 pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali : kondima na biso. 5 Nani oyo alongaka mokili ? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.
6 Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila ; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo. 7 Nzokande, batatoli bazali misato : 8 Molimo, mayi mpe makila ; mpe bango misato balobaka ndenge moko.
9 Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki motuya, pamba te yango nde Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye. 10 Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye. 11 Mpe litatoli yango ezali : Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye.
12 Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi.
17 Solo, lisumu ezali : kobuka mobeko ; kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa te. 18 Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te. 19 Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana. 20 Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.