4 Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili. 5 Basakoli ya lokuta bazali ya mokili ; balobaka kolanda elobeli ya mokili, mpe mokili eyokaka bango. 6 Biso, tozali ya Nzambe ; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga.
9 Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye : atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye. 10 Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
11 Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso. 12 Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.
13 Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso : ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso. 14 Tosilaki komona Ye mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na Ye mpo ete azala Mobikisi ya mokili.
15 Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe. 16 Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye. 17 Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso : ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama ; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali.
18 Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo. 19 Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.
20 Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.
21 Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.
<- 1 Yoane 31 Yoane 5 ->