7 Nakokaki kosepela ete mibali nyonso bazala lokola ngai ; nzokande, moto na moto azali na likabo na ye ya ngolu, oyo azwi kowuta na Nzambe : moko azali na likabo oyo, mosusu azali na likabo wana. 8 Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai. 9 Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.
10 Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye ; 11 kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.
12 Epai ya bato mosusu, nazali koloba, Nkolo te kasi ngai : Soki ndeko mobali Moklisto abali mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango andimi kowumela elongo na ye, tika ete abengana mwasi yango te ; 13 soki mpe mwasi azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango andimi kowumela elongo na ye na libala, tika ete mwasi akabwana te na mobali na ye. 14 Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule. 15 Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye ! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia. 16 Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo ! 17 Lisusu, tika ete moto na moto atambola na lolenge oyo Nkolo abongisela ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Yango nde mobeko oyo napesi na Mangomba nyonso. 18 Boni, moto moko azalaki akatama ngenga tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga ! Boni, moto moko azalaki akatama ngenga te tango Nzambe abengaki ye ? Tika ete atikala akatama ngenga te ! 19 Kokatama ngenga to kokatama ngenga te ezali na tina te ; likambo ya tina ezali nde kobatela mibeko ya Nzambe. 20 Tika ete moko na moko atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye ! 21 Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo ? Komitungisa na yango te ! Ezala soki okoki kokoma nsomi, salela nde malamu lolenge na yo. 22 Pamba te moto oyo azalaki mowumbu tango abengamaki mpo na kosalela Nkolo azali mokangolami ya Nkolo ; ndenge moko mpe, moto oyo azalaki nsomi tango Nzambe abengaki ye azali mowumbu ya Klisto. 23 Bosikolamaki na motuya makasi ! Boye, bokoma te bawumbu ya bato. 24 Bandeko, tika ete moko na moko awumela, na miso ya Nzambe ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye !
36 Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mwasi mobandami na ye na libala, soki akanisi kosangisa na ye nzoto mpe ete asengeli kaka kosala bongo, wana bazali kotambola kati na likanisi ya kobalana, tika ete asala kolanda posa na ye, azali kosala lisumu te. Tika ete babalana ! 37 Kasi mobali oyo azwi mokano kati na motema na ye, na kotindikama te mpe na bososoli nyonso, ya kosangisa nzoto te na mwasi mobandami na ye na libala, asali malamu. 38 Boye, mobali oyo abali mwasi mobandami na ye na libala asali malamu, kasi oyo abali ye te asali malamu koleka.
39 Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto. 40 Nzokande, na makanisi na ngai, akozala mwasi ya esengo koleka soki atikali ndenge azali ; mpe nakanisi ete, ngai mpe, nazali na Molimo ya Nzambe.
<- 1 Bakolinto 61 Bakolinto 8 ->