6 Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu. 7 Boni, nani azali kokesenisa yo na bato mosusu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Mpe lokola bapesa yo yango, mpo na nini komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?
8 Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te !
10 Biso, likolo ya Klisto, tozali bazoba ; kasi bino, kati na Klisto, bozali bato ya mayele ! Biso, tozali bato na bolembu ; kasi bino, bozali bato makasi ! Bino, bozali kozwa lokumu ; kasi biso, tozali kotiolama !
11 Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga, 12 mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka ; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko ; 13 tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato.
17 Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
18 Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino. 19 Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango. 20 Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya.
21 Bolingi nini ? Naya epai na bino na fimbu to na bolingo mpe na molimo ya boboto ?
<- 1 Bakolinto 31 Bakolinto 5 ->