5 Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango. 6 Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa. 7 Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina. 8 Moto oyo aloni mpe moto oyo asopi mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moko na moko akozwa lifuti na ye moko kolanda mosala na ye. 9 Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.
16 Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ? 17 Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye ; pamba te Tempelo ya Nzambe ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango.
18 Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya. 19 Pamba te bwanya ya mokili ezali bozoba na miso ya Nzambe. Kolanda ndenge ekomama : « Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele mabe na bango ; » 20 mpe lisusu : « Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali na tina te, » 21 yango wana tika ete moko te aluka lokumu kati na bato, pamba te nyonso ezali ya bino : 22 ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino ; 23 kasi bino, bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.
<- 1 Bakolinto 21 Bakolinto 4 ->