6 Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi ? 7 Ezali mpe ndenge moko mpo na bibetelo mindule lokola flite to lindanda : soki ezali kobimisa te mingongo ekesana, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to lindanda ezali kobimisa ? 8 Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba ? 9 Ezali mpe ndenge moko mpo na bino : soki na minoko na bino, bozali kaka koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki penza koyeba makambo oyo bozali koloba ? Wana, bokoloba na pamba. 10 Kati na mokili, nkota ezali ya ndenge na ndenge, mpe lokota moko te kati na yango ezangi tina. 11 Nzokande, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya lokota oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, mpe ye akozala mopaya epai na ngai. 12 Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
13 Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na nkota oyo eyebani te abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba. 14 Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te. 15 Boye, nasala nini ? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai ; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai. 16 Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba. 17 Ozali kozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu azali kokola te kati na kondima.
18 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ete nalobaka nkota oyo eyebani te, koleka bino nyonso. 19 Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.
20 Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike ; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike ; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo. 21 Ekomama boye kati na Mobeko :
22 Yango wana, nkota oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bazali bandimi te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi ; nzokande lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bazali bandimi te.
23 Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba nkota oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bazali bandimi te bakoti kuna, boni, bakoloba te ete bozali na liboma ? 24 Nzokande, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo azali mondimi te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna, boni, akomimona te lokola moto ya masumu ? Akomitungisa te kati na motema na ye ? 25 Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba : « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
29 Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba. 30 Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli, wana mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba asengeli kokanga monoko. 31 Pamba te bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama. 32 Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye. 33 Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia.